Kotonga botangi ya ebandeli na nzela ya masano
Mwana nionso abongami pona kotanga
“Makambo oyo ozoyekolaka nakozanga esengo okobosana yango na pete nionso”
– Lisese ya kala ya bato ya Finlande
Lisano ezali moko ya ba lolenge ya malamu pona bana koyekola koloba pe kotanga. Lisano esungaka bana ba kanisa na nzela ya bilembo : lati ekomi nzete ya magie, lelo ekomi tango oyo ba dinosaures bazalaki na bomoyi, moninga ya masano akomi astronaute azokende na mapata.
Na nzela ya lisano, bana basosolaka ete eloko moko ekoki kolakisa eloko mosusu. Oyo esungaka pe bana basosola ete maloba oyo ekoki kozala biloko ya solo to makambo.
Lisano ya komekola esungaka bana ba kanisa na nzela ya bilembo pe bakolisa elobeli na bango. Tango bana basakanaka kobomba to bamekolaka kozala niama, balobaka oyo bazali kosala. Ba mekaka kotia makanisi na maloba.
Lisano ya maboke esungaka pona kokolisa boyebi ya lisapo na ndenge babongisa lisolo na oyo etali makambo oyo bazosala. oyo esungaka bango kososola ete masolo ekomaka na lolenge oyo elongobani : ebandeli, katikati, suka.
Kondimisa pe epesaka bana libaku yakosala lokola ezali makambo ya solo ya bomoyi, kolekela mitungisi pe bobangi, pe kosalela makanisi na bango pona kozua biyano na mikakatano.
Lisano esungaka bana bayoka lokola bakokisi likambo ya malamu pe bamindimela. Oyo etindikaka bango bameka makambo ya sika pe balemba te tango makambo ezomonana pasi.
Soki eloko ya kosakanela ezali pete, elingi koloba koyekola ekozala na pete te.
Ba blocs · Langi · Lisano ya maboke · Zelo· Mayi · Mabele ya Poto ·
Lisano ya puzzles · Kolamba
Ba lolenge ya koyekola na nzela ya lisano:
- Makanisi
- Lolenge bato na biloko bazalaka
- Monene, lolenge, kilo, etelemeli, molayi, mozindo ya eloko
- Kotanga, kokabola
- Kopesa biyano na makambu
- Boyokani
- Kosalela liboko na lisu
- Lisano ya komekola
- Bolakisi ya lolenge ya bonkoko
- Bayebi ya mathematique na science
- Bokobi ya lingomba
- Bokobi ya misuni
- Komindima
- Bokeli
- Bolandi ya mitindo
➤ Koyemba na botangi !
(Singing Through Your Day)
➤ Kotonga botangi ya ebandeli na nzela ya masano
(Building Early Literacy Through Play)
➤ 15 lolenge malamu pona baboti batangela ba bebe na bana mukie na mongongo makasi
(Read to Me: Read Aloud Tips for Parents)
➤ Bebe azali na posa ya ba buku ya lolenge nini ?
(What Kind of Book?)
➤ Muana nionso abongomi pona kotanga na bibliotheque na bino
(Every Child Ready to Read @ Your Library)