Connect with the Library:

Muana nionso abongomi pona kotanga na bibliotheque na bino

Print

Boyebi na bomuana ezali eloko bana basosolaka malamu na oyo etali kotanga pe kokoma yambo ete babanda penza kotanga pe kokoma. Boyekoli kosangisa maloba pe boyebi ebandaka na ba mbula misatu ya ebandeli ya bomoyi ya muana. Boyebi na ebandeli ya bomuana yango nde ekosala ete bongo ya muana ekola. Boyebi na bomuana esangisaka makambo oyo :

  • Kopesa makanisi na eloko pe kosepela na ba buku
  • Koyeba ba kombo ya biloko, komona makomami pe maloba, koyeba lolenge ya kosimba buku, koyeba kolanda makomami na likasa
  • Kozala na makoki ya kolobela eloko to kobeta lisolo
  • Makoki ya koyeba ete makomami ekeseni to lokito na yango ekeseni
  • Koyoka pe kosakana na lokito ya moke na maloba

Kotanga, kosakana, kosolola, koyemba pe kokoma ezali makambo mitanu oyo ekopusa bokolisi ya bongo ya muana pe kotia boyokani oyo ekokoma moboko pona kotanga. Fina na lien awa na se po ozua ba nsango misusu maye matali makambo oyo. Nakati awa ezali nde ba recherches, makoki oyo ezali na bibliotheque pe makanisi ya lolenge nini okoki kosunga muana abongama pona kobanda kotanga !


➤  Koyemba na botangi !
(Singing Through Your Day)

➤  Kotonga botangi ya ebandeli na nzela ya masano
(Building Early Literacy Through Play)

➤  15 lolenge malamu pona baboti batangela ba bebe na bana mukie na mongongo makasi
(Read to Me: Read Aloud Tips for Parents)

➤  Bebe azali na posa ya ba buku ya lolenge nini ?
(What Kind of Book?)

➤  Muana nionso abongomi pona kotanga na bibliotheque na bino
(Every Child Ready to Read @ Your Library)