15 lolenge malamu pona baboti batangela ba bebe na bana mukie na mongongo makasi
Kotanga na munana na mongongo makasi eza lolenge moko ya malamu pe ya ntina pona kolengela botangi pe boyekoli ya mwana. Campagne nationale ya Kotanga na mongongo makasi pona 15 MINUTES (Read Aloud 15 MINUTES National Campaign) ezo tindika baboti kotangela bana na bango na mongongo makasi ata mukie pona 15 minutes mikolo nionso kobanda na mokolo ya mbotama.
Baboti bazali ba lakisi ya liboso pe ya ntina makasi pona bana. Banda nzela ya boyekoli kotanga elongo na muna na yo.
- Sepela ! Ekozala esengo ! Esengo epanzanaka epayi bato misusu, sala makasi ete mwana na yo azwa yango.
- Tanga na kolakisa. Kende liboso ! Salela mingongo. Sala ba effets ya son. Sekisa mwana…muana na yo akosepela na yango.
- Lakisa mwana bilili pe lobela yango. Mesanisa mwana na yango : “Hee! oyo ekokani na bale na yo.”
- Ata soki muana azotungisama akoyoka yo. Simbisa ye buku na ye moko to pesa ye eloko atafuna tango ozo tanga.
- Muana aza na nzala ? Eza malamu kopesa ye mwa eloko ya kolia, melisa ye to pesa ye biberon amela tango yo ozotanga ye na mongongo makasi. Sala nionso mibale nzela moko !
- Soki muana nayo azali na kimia te pe asilisi yo makasi ya kotanga, yembela ye ba nzembo, tangela ye ba poemes…meka lisusu kotangela ye sima.
- Tika mwana na yo abalola likasa soki akoki. Na mikolo ekoya mwana na yo akoyeba eteni nini ya mokanda eza likolo, po ete makomami oyo ozotanga pe batangaka maloba kobanda na loboko ya mwasi ti na loboko ya mobali.
- Bana ba lingaka bilili ya kitoko. Luka babuku oyo ezali na bilili ya kitoko makasi !
- Bana mikie balingaka maloba ya kozongela zongela, kosakana na maloba, na ba nzembo – pesa bango babuku oyo ezo lobela bango pe oko mona ndenge ba koyekola koloba.
- Babuku ya mikuse pe ya pete eza malamu makasi pona ba bebe. Babuku misusu ya malamu makasi ezalaka kaka na makomami ebele te.
- Sala ete kotanga na mongongo makasi ekoma momesano ya mikolo nionso tango muana na yo aza nanu mukie. Ekoki kokoma ngongo ya mutuya na yo ya mokolo na mokolo.
- Pesa ba lolenge ebele kasi bongama pona kobandela yango mbala na mbala. Babuku ya ndenge na ndenge ezali malamu mingi – kasi kokamua te soki muana na yo alingi kaka buku moko mbala na mbala.
- Babuku, babuka bisika nionso, pe biloko ebele ya kotanga. Kolisa motangi. Sala ete kozua buku pona muana na yo ekoma pete.
- Tango ozo tanga na mongongo makasi, luka esika ya malamu oyo ekotia makanisi payi – payi te.
- Kosala mingi ekomisaka makambo kitoko. Soki osali yango mingi ekokoma pete.
TumbleBooks ezali babuku na ba dessin animé, babuku ya maloba pe na bilili oyo ezopesa bana esengo ya kotanga na lolenge oyo bakolingi. Babuku ya boye esalamaka na kozwaka bilili oyo ezalaki na babuku ya kala na kobakisa ba dessin animé, makelele na ba nzembo na lisolo pona kosala buku electronique ya bilili oyo okoki kotangela mwana na yo to kopesa ye moko atanga.
➤ Koyemba na botangi !
(Singing Through Your Day)
➤ Kotonga botangi ya ebandeli na nzela ya masano
(Building Early Literacy Through Play)
➤ 15 lolenge malamu pona baboti batangela ba bebe na bana mukie na mongongo makasi
(Read to Me: Read Aloud Tips for Parents)
➤ Bebe azali na posa ya ba buku ya lolenge nini ?
(What Kind of Book?)
➤ Muana nionso abongomi pona kotanga na bibliotheque na bino
(Every Child Ready to Read @ Your Library)